Bitkoin Eyali Lokola Lisano Ya Ndembo

by @thebitcoinrabbi 2021/01/13open in new window

Nabandaki kolakisa pe kolimbola mbala na mbala ndenge #bitkoin etambolaka pe lipanda na yango lokola lisano ya ndembo. Nakanisi ekosunga kopesa biyano na mituna miye:

M: Nani ango asala lisano ya ndembo ya maboko?
E: Eza na tina ata moke te koyeba nani abandisaka masano miye. Moto nyoso na molongo mobimba akoki kosakana. Eza na tin ate koyeba nani abandisaka yango, to pe soki motoโ€™ango azwi mokano yako kobongola mibeko ya lisano to ko mipesa lifuti, to pe eloko mosusu. Eza na tina ata moke te, toza pen a tina ya koyeba makanisi naye lisusu te.

M: Nani mokonzi ya lisano?
E: Moto moko aza mokonzi te, banso tozwi mokano yako sakana. Banso toyebi pe to tiaka mibeko, pe soki moto ya lokuta, balado to kanyaka akoti, took bengana ye. Soki moto amipesi lifuti oyo ya ye te, took kipe ye te.

M: Ndenge nini toko yeba โ€˜te mibeko mya lisano miko bongwana te?
E: Banso tondimaki na mibeko yambo โ€˜te masano mabanda, pe oyo nyoso andimi kokoba na lisano ako koba, pe soki moto alingi abongola mibeko ya masano, wana akoki kondende kosakana esika mosusu.

M: Kanyaka pe mayele mabe eko kota te?
Eย : Nyoso eyali polele polele. Banso tokoki komona etando ya masano nโ€™a mingete minso. Soki moto akosi to akotisi kanyaka, banso took yeba pe toko bengana moto ya ndenge wana.

M: Po na nini talo na yango ezali ngenge moko nโ€™eloko nyoso?
E: Banso tondimaki kosakana, na yango eyali na motuya pona biso. Soki moto alingi akota na lisano, ebongi ete andima lifuta na biso nโ€™a motuya na yango. Napesโ€™ango motuya, yango wana eza na motuya.

Motuya ezalaka kaka ndenge moto na moto ayokaka to pe amonaka.

M: Bako pekisa yango mokolo mosusu te?
E: Toyebi te, kasi eza kaka bato baโ€™ako sakana nan a ndembo na eteni ya nzete, baโ€™ako beta moto te to pe kosala mabe moko te, soki leta (bula matari) amoni โ€˜te akoki kopekisa yo lisano kasi atiki likanisi yako betaka ndembo na nzete, wana lisano eko koba se ko koba esika mosusu.

M: Nakoki ko kota?
E: Etali yo moko. Ngai natondi nโ€™esengo na lisanoโ€™ango, okoki kokota pe okoki osala soki nini ango.

Translators
Neo Simba