Bitkoin Eza Lokola

by Oleg Andreev 2017/12/10open in new window

Bitkoin eza lokola lokasa ya mbongo: Bazongisaka yango te, esengeli yo moko obatela yango. Soki obungisi libenga nayo, obungisi mbongo nayo. Okoki kopesa moto mosusu mokumba yako bomba Bitkoin nayo kaka lokola banque: esengeli ondimisama penza penza โ€˜te akokima na misolo nayo te.

Bitkoin ekeseni na mbongo: okoki kobomba mipiko nโ€™a mipiko ya Bitkoin kasi eko kanga esika ya monene te. Okoki kotindela moto nyoso na nzela ya singa ya lotiliki. Nzela yako bebisa yango ezali te. Okoki kopesa yango na mpwasa te, esengeli ozela miniti 10 โ€“ 15 po โ€˜te na nzela ya lotiliki, mashini ya odinatele esalela yo peleve kiliptogalafiki.

Bitkoin eza lokola wolo: okoki kosala yango to kozwa yango ndenge olingi te, motango nโ€™ango eza yako tanga pe ekabolama na etando pe tango yako landana (mingi mingi tango). Pona kozwa yango, esengeli moto apesa yo yango, to yo moko otimola tii ozwโ€™ango. Lokola wolo, Bitkoin engengaka: ebendaka bato pona lolenge ya makomi ya ingeniele, nโ€™a ba poogalame ya kontala na yango kitoko pe likolo koleka, pe elaka ya bonsomi na oyo etali looma ya bato.

Bitkoin ekeseni na wolo: bozwi ya Bitkoin etangama na ndenge ya botimoli na yango (motango songolo kaka ndโ€™ekoki kozwama na mbala). Okoki kondima ete moto te akoki kokutana na ngomba mombimba ya wolo ya Bitkoin to ko timola na nguya ya ba steloide. Bokeseni ezali, kwokoso na mikakatano ya kozwa Bitkoin ebongisami na etingia to pe mbamba ya koluka kozwa yango. Okoki kotimola wolo nyoso na libulu na mokolo moko kasi okoki kotimola Bitkoin nyoso na mokolo moko ata soki ozali na mashini ya odinatele ya kitoko pe makasi ya ndenge nini. Soki mosala esalami makasi mingi koleka, okoki kaka kobongola tango yako kozwa mipiko motoba na tango moko, kasi soki opusi yango mingi mingi koleka, okoki kozwa mipiko sambo to mwambi na ngonga moko.

Bitkoin eza lokola bank: ba odinatele, mikanda nโ€™a koteka pe kosomba. Eza na esika ba sango ya misolo nyoso ekota nโ€™a oyo ebima: nani ango atindi misolo boni pe epai ya nani atindi misolo yango. Noyoso ezali bilili na odinatele. Na mombongo ya wolo, ba volte na kotiaka mbongo moke moke na kessi eyalaka te kaka mikanda na buku oyo moto nyoso amonaka noki te mayele mabe na kanyaka esalema.

Bitkoin ekeseni na bank: Moto na moto akoki kozala na ba konte ebele ndenge alingi pe ba konte wana eyali ya nkuku (soki olingi, yo moko okoki komilakisa). Buku ebombaka bakombo ya bato te, kaka ba numelo ya konti nโ€™a misolo miye mitikali oโ€™kati ya konti. Esalemaka lolenge ya ba bank badefisaka misolo oyo baza nโ€™ango te ezali te. Na bosolo, nyongo to keledi ezalaka na buku ya Bitkoin te, nzela kaka mibale: to oza na misolo na libenga nayo, wana eza obe yayo moko, to oza naโ€™eloko te, wana okoki pe kokota te. Pe lisusu, na Bitkoin okoki kokanga misolo na kontala: puzele ya kilipitogalafi oyo esalama pona kosunga basaleli bayike pona kozwa mikano na bisika ebele pe tango na tango.

Bitkoin eza lokola misolo ya loteli: mabanga mya yango mizali na talo songolo te. Bato bakopesa motuya na yango tango bandimi kosakana lisano yango. Wana nde bosolo na tina na wolo pe misolo minso na mokili mobimba.

Bitkoin ekesani na misolo ya loteli: motango na yango eza na suka, pe moto moko te akoki kobimisa mabanga ya Bitkoin ya lokuta. Oyo nde epesi yango nzela yakozala moko ya biloko miye mikoki kosunga bato ya molongo mobimba pona kobomba misolo to bozwi mya bango, lolenge moko na mabanga ya wolo to pe palata.

Bitkoin eza lokola Git: na Git (nzela yako kengela banzela yako kabola ya misolo) etuluku ya ba jetons to echange ya bato nyoso ebongisami be ebombami na cheni ya kilipitogalafi. Soki ondimeli mabomi oyo ya okoki koyeba pe koyeba ba sango nyoso (to ndambo) ya sika nโ€™a ya kala kala ko uta epai na epai pe ko tala soki ezali penza nini ozali koluka. Na ndenge moko wana kaka, na Bitkoin, nyoso esalamaka na cheni ya kolandisama (babengi yango blokcsheni) soki endimami, ata esalamaki wapi, okoki kondimisama na koluka pe kozwa basango nyoso na kolandelaka singa to sheni na yango. Ynago wana, nyoso ebombamaka malamu penza pe okoki kotuna pe biyano ya malonga eko monana na tango nyoso.

Bitkoin ekeseni na Git: bato nyoso blingaka kosala na esika moko. Na Git moto na moto akoki kosala alingi pe na nzela ya ikanya asangisi misala nyoso esika moko na suka ya mokolo. Na Bitkoin okoki kosangisa makanya te. Bloksheni ezali lokola nzete ya ba sango koteka pe kosomba, kasi eza na esika biloko ya motuya ezali, nโ€™a bisika ya mike mike esika eloko ya motuya eza te. Na Git makomami eza na motuya koleka esika, na Bitkoin monoko ya bato ebele eza na motuya koleka makomi.

Bitkoin eza lokola Bittorrent: (Bittorent eza esika baninga to basaleli batindelanaka mikanda to ba buku na nzela ya singa ya intelneti, soki moko atindi/azwi, baninga nyoso bako mona nini azwi) lisanga oyo ezali na bonsomi penza, mokolo nโ€™ango aza te, banke pe te. Bloksheni eza lokola buku kaka moko na bittorrent: etindimami na kliptogalafi pe ekabolami na ba odinatele nyoso. Moto nyoso, nโ€™a batimoli baza ndenge moko. Soki mwa kwokoso ekoki na eteni ya netiwok, mombongo to pe mosala ekosalema na eteni mosusu. Ata soki netiwok mobimba ekwei, basango ya nyoso oyo esalema liboso ebombami na ba odinatele bisika nkoto nkoto pe mgongo ya moto ata moko te ekoki kobunga. Tango bato bako zonga na netiwok, bako bandela mosala lokola ata eloko moko esalamaki te. Nโ€™a Bitkoin, nโ€™a Bittorent ekoki kobika na sima ya etumba nuklere oyo ebebisaka nyoso, po basango na yango eza na makoki yako benda moto ya makasi te pe ekoki tiama na esika ya kobandela misala lisusu.

Bitkoin ekeseni na Bittorrent: na esika ba sango nโ€™a mikanda epanzana pe ebombama epai na epai, eza kaka na mbulumbulu moko oyo ekolaka basusu: babengi yango Bloksheni. Lisusu, ya motuya koleka ezali ete: basali oyo tobengi batimoli bafutamaka na misolo ya solo solo po na misala mya bango.

Bitkoin eza lokala bonsomi ya maloba: toloki nyoso eyali lokola mwa sango ya mokuse oyo elobami pe eyokani atako ndenge nini to epai nini. Soki ba timoli bayoki yango, bango pe bako bakisa yango na Bloksheni po ete sango eye etikala pona seko na seko. Moto nyoso akomona yango, pe moko te akoki kolongola yango.

Bitkoin ekeseni na bonsomi ya maloba: maloba maye olobi eza na motuya. Mombongo elongolaka bibende to mabanga ya Bitkoin oyo oko salela po obanda. Yango wana, awa moto ya bolema nyoso ten de akoki koloba, bobele baye basili kosala misala to pe basili kosomba mabanga pe mbano emonani. Lisusu, batimoli to basali bakoki koboya kosomba to koteka ya lokuta to pe soki ekokisi motuya te. Na yango, bonsomi ezali te lokola maseki kasi moto na moto apesami makoki ya kokota kaka soki akokisi mibeko.

Bitkoin ezali lokola kontala to ekateli ya bondeko: eyali bikamwa ya efandeli ya malonga. Ezali pe etambolaka lokola misolo soki bato basaleli yango engebene na ekateli yako batela yango pe kolengela mibeko miye mitambwisaka yango. Bosenga ya tekinologi eyali kaka pona bosalami ya ba kontala.

Bitkoin ekeseni na kontala to ekateli ya bondeko: eza lokola bikateli oyekolaka na kelasi te. Ebongwanaka bonwanaka te ekoki pe kotiama na nko to loma ya bakonzi ya bula matari te. Ezali mibeko na nzela ya inteleneti basaleli nyoso bandimi na sekele kosalela na motema moko pe ekoki kobongwana soki moke te.

Bitkoin eyali misolo ya bikamwa na nzela ya inteleneti: na mokuse eyali obele bongo.

Translators
Neo Simba