Banke ya Bitcoin pona Lisanga ya Bato: Nyoso Toyekoli epai ya Bitcoin Beach

na Galoy Money 2021/11/10open in new window

Ebandeli

Mopepe ya mbongwana ebandisamaka na bilenge baye bazali naino na botau ya makanisi bososoli ete botomboki mwa bango suka suka eko kweya. Ata nakoki ko batama na sima ya bolenge te, tango Bitcoin Beach ebandaki, esengo nanga ezali ete nabandaki naino kolekisa tango mingi na twitter te po nakanisa โ€˜te mokolo mosusu bato bakoki pe kosalela Bitcoin pona kosomba kopo ya cafรฉ. Soki tosalaka nduka na bokebi te to pe tobandaki na koyekola esaleli, tolingaki tomona bolema na biso. Kasi sikโ€™oyo bayike kati na bino bakoki kozwa boyebi ya el Savador na etando po ete tosalaki bozoba yakoyeba mingi koleka.

Na oyo etali Bitcoin Beach, bosolo ezali mopaya koleka ndoto. Moto ata moko te akokaki ko banza ete nkita ya nsomi na kati ya Bitcoin ekokaki kobandisama na mwa mboka ya moko ya moke penza na El Salvador. Ekambami na mopaya moko akomela na mibu oyo asalelaka na email ya Earthlink, na bomoko nโ€™a elenge moko ya ekolo El Salvador, mokambi ya bana mboka oyo asislisa ata kelasi ya 6 te.

Soki totali sima, suka ya nyoso eyebanaki: Ezalaki kaka malamu pona etuluku ya bato oyo banyokwama na bobola pe bozangi ya makoki na oyo etali misolo โ€˜te bamona litomba ya Bitcoin liboso ya bituluku misusu oyo etonda na bozwi na Singapore to na Silicon Valley. Neti ebongisama na Nzambe penza โ€“ baye bafungolaki nzela babandaki na botau nyoso, bayebaki ata eloko te yango elongolaki somo na baye banso bayaki na sima.

Na El Salvador, Bitcoin ezali mosolo ya babola pe baye batiam pembeni na oyo etali misolo. Pona bai mboka El Salvador, oyo bazwami na bobola, koswana pona misolo nโ€™a wolo ya bilili eleki likolo, pe ezali ata na tina te. Pona baye basengeli na Bitcoin penza, eza likambo ya ndenge bakoki kosomba lipa ya mokolo na mokolo pe kobomba mwa misolo pona lobi pendele. Pona bango, tina ya ko pona moko to mosusu ezali te.

Na boye awa na 2021 tokoki komona na nzela ya mwa ekolo ya moke pe etondisama na bobola, ndenge nini Bitcoin ekoki kokokanisa etando ya lisano ya nkita pona babola. Toyebi ete Bitcoin Beach ezali kaka mwa elilingi ya moke. Tokolikia ete yango ekozala moto eye ekopela pe kopelisa moto mosusu ya monene na molongi mobimba. Tobiangi yo o mboka Elsalvador, mbela na biso ezali ete oya kotambola na El Zonte, po omemela biso lisungi nayo po topanza sango oyo ya banke ya Bitcoin ya lisanga oyo ezali kosunga kokotisa bato banso na esaleli ya misolo na molongo mobimba.

โ€“ Mike Peterson (@bitcoinbeachopen in new window)

Na Ebandeli ya Poloze awa tii kino na mambi ma mibeko na mibu 2.

Mabongisi pona misala ya Bitcoin Beach ebandaka na motuna ya pete kasi ya tina monene: ndenge kosala โ€˜te nkita ya malonga oyo ekoki koumela etongama na nzela ya Bitcoin?

Eyano eyali na mongongo makasi iyo. Oyo ebongisamaki kaka pona lisanga ya bato ya mwa mboka ya moke pe mosika ebuti kino ekomi lisolo ya baike ya bato million motoba pona kolakisa na mokili mobimba โ€˜te Bitcoin ezali mosolo.

Awa toko lakisa mateya motoba oyo tomoni tango tosali mosala yako tia Libenga ya Bitcoin Beach pe bokasi ya bisaleli oyo esimbi pe etambwisaka yango. Posa na biso ezali kosunga bitonga ya bato epai na epai na mokili po ete koyekola na bango esalema na lombango pe bayamba Bitcoin nโ€™a Lightning Network (Netiwok ya Kake).

What is Bitcoin Beach?

El Zonte ezwami na libongo ya Pacific kuna El Salvador, mwa mboka moke epai wapi motango ya bai mboka ezali 3,000, bato basalaka masano na mbonge na mai ya monana. Bai mboka oyo batikala sima na oyo etali lolenge ya ba bankei pe ekangama na bitumba y aba kuluna nโ€™a ndenge mboka etikala sima na oyo etali mayele ya misolo uta mibu ebel ebele. Na mibu zomi oyo euti koleka, mwa bato moke babandaki kopelisa moto ya mbongwana pe pona komema elikia ya bai El Zonte.

Jorge Velenzuela, Roma โ€œChimberaโ€ Martinez nโ€™a Mike Peterson babandi kolengela pe kobongisa bilenge ya El Zonte na 2009 po bana mboka bazwa libaku malamu yako sakana, koyekola pe ko likia. Kobanda na surf โ€œpara todoโ€ (lisano ya mbonge pona bato banso) na kelasi ya odinatele tii na misala yakosunga mboka nโ€™a lifuti, mabongisi miye ememi pema ya sika nโ€™a mabaku na esika oyo epai wapi nyoso ezalaka lokola lubwaku.

Jorge, Chimbera nโ€™a baninga babongisi lisanga ya masano ya kotonga nzoto, koyekola nโ€™a misala na motema ya bomoi ya bai El Zonte. (Ewuti na: Twitter)

Na 2019, moto moko boye abengaki Mike na likabo ya Bitcoin pona kosunga ba pologalame na bango. Kasi nyoso wana nโ€™a mobeko moko, koteka Bitcoin wana pona kozwa fiat te kasi esengeli kosalela likabo wana na etonga mobimba. Posa ezalaki ya kosala nkita ya Bitcoin oyo eko umela pona bato nyoso epai wapi bai mombongo nโ€™a bai mboka bokoki kosala troki ya biloko, misala pona sati. Jorge nโ€™a Mike bandimaki momekano wana, pe Bitcoin Beach ebotamaki.

Uta ebandeli, eyebanaki polele โ€˜te poloze oyo eko telemela nyoso oyo eyebanaki na kala pona Bitcoin:

  1. Pona bazwi Bitcoin ezali bomengo ya makanisi nโ€™a masolo. Soki okoti na chaine ya misala nโ€™a ba site, oko yoka bato kosolola pona talo, komata-kokita, pe momekano nโ€™a biloko misusu ya nkita, wolo nโ€™a mimbongo. Oko yoka bato koloba ndenge ba banke bโ€™ako panza sango pona ba kiliya na bango ba bozwi pe bomengo ebele. Oko tikala koyoka sango ya ndenge Bitcoin ezali kofungoal nzela pona nkita pe bozui na bisika oyo bobola epikama na mokili.

  2. Bitcoin ezali ebombelo nkita ya motuya, kaka esaleli ya troki te. Tango bolamu ya Bitcoin lokola ebombelo ya nkita endimami epai nyoso, Bitcoin lokola esaleli ya mimbongo ezali lisolo oyo tii lelo endimamaka soki moke te. Lisoloโ€™ango eza boye: โ€œsoki talo ya Bitcoin eko koba kaka komata lokola sikโ€™oyo, moto ata moko te akolinga koteka to kosalela yango pona kosomba to kofuta pona misala.โ€

Tango poloze elongwe na makinisi pe ekoti na mosala, lisanga ya Bitcoin Beach nโ€™a bakambi na bango nโ€™a bayekoli ba moni ndenge Bitcoin ekoki kosunga na mikakatano ya bana mboka:

  1. Ba bankee ya minene basalaka misala na mboka ya babola te. El Salvador esalelaka US Dollar kobanda 2011, na boye bazali na se ya mibeko miye mitambwisaka misala ya misolo na US. Motuya ya kotosa mibeko minso wana elongola na ba bankee posa yako sunga babola na bato y aba mboka mike mike. Na ndakisa tango mokambi ya Garten Hotelopen in new window alingaki kofungola konte ya bankee pona bato ya misala pona kofuta bango mbala moko, bayebisiopen in new window ye akofuta $50 na sanza, pona moto moko. Mbongo wana eleki 10% ya lifuta ya basali ya se.

  2. Kotindela bato mbongo na El Zonte eza talo mingi pe eumelaka. Misolo ko uta na mikili ya bapaya ezalaki 23% PIB to pe nkita ya El Salvadoropen in new window na mobu 2020. Po moto azwa $10 oyo euti epai ya ndeko na ye oyo azali na mikili ya bapaya, esengeli afuta $3. Western Union ezali na El Zonte te na yango, eza mosika pe eko umela po bai mboka bakoma esika yako zwa mbongo. Bakisa mikolo nyoso oyo esengeli po mbongo elongwa epai ya motindi pe ekoma na El Salvador.

  3. Ezali mwa kpokoso kobomba mbongo soki bankee ezali te. Kozanga banke ezali kaka kozanga compte ya banke te. Eko zangisa moto nzela ya na bomengo pe ndenge yako batela bozwi na mata-kita ya nkita. Tango tokotusaki Bitcoin tokanaki te ndenge kokotisa Bitcoin epusaki ebele ya bai mboka pona mbala ya yambo kobomba ndambo ya lifuta na bango.

Lisanga ya Bitcoin Beach bamipesi na kosunga bai mboka koteka pe kosomba na kosalela Bitcoin na nzela ya lotiliki. (Ewuti na: Twitter)

Lokola tozalaki na Bitcoin pona kofuta nyoso, ekipe ebandi mosala. Babandi mosala yako kotisa bai mboka, moko na moko na rezo ya Bitcoin. Na nzela ba yekoli, pe bami lengeli pona kozwa boyebi. Koya ya epidemie na ebandeli ya 2020 esungaki bato bandima Bitcoin na lombango. Bai El Zonte baye bazalaki na posa ya lisungi bazwaki makabo ya Bitcoin ko uta na poloze ya Bitcoin Beach.

Lokasa moko ya Forbesopen in new window na 2020 etindiki Bitcoin Beach na mwinda pe lisungi y aba Bitcoiners ebele babandaki koya na lisungi. Moko na bango ezali Nicolas Burtey, moko ya bakambi ya Galoy, oyo asengaki koya na El Zonte pona kofungola libenga oyo ekokani na Bitcoin Beach. Kala te, Libenga ya Bitcoin Beach ebotamaki pe poloze ya Bitcoin Beatch ekomi kokola pe kokokisa ndoto na yango.

Awa moto nyoso ayebi ndenge lisapo oyo eko suka: na mokolo ya 5 Juin, 2021 Tata Mokambi ya ekolo El Salvador Nayib Bukele azwaki mokano yako komisa Bitcoin efuteli na mokili ya mombongo pona ekolo. Bukele alobaki na etando ya Twitter โ€˜te bulamatali basepeli mingi na poloze ya Bitcoin Beach pe ete litomba ya mibeko ezali yako zongela noyoso oyo eleki na El Zonte pona ekolo mobimba. Tata Mokambi alobaki pe lisusu ete nyoso balingi pona babola nyoso ya ekolo El Salvador ezali ete bazwa esika na nkita pe bomengo ya ekolo. Na 7 Septembre 2021, Mobeko ya Bitcoin endimamaki. Bitcoin Beach ekomi na kati ya lisolo ya kondimama ya Bitcoin na molongo mobimba. Ememaki ba Bitcoiner ya mokili mobimba balingaki komona ndenge nini kosalela sati pona kofuta pona cafรฉ, kosakana na mbonge, pe kosomba misuni. Ekomaki pe modele pona bamboka misusu.

Oya tina monene, ezali ete Bitcoin Beach esali โ€˜te bana ya El Zonte bakoka kolota lisusu pona ndele ya malonga.

Libenga ya Bitcoin Beach

Libenga ya Bitcoin Beach ezali eyano pe polele lokola bankei pona batobanso. Esalemaki pons kokokisa ba posa ya bai mombongo nโ€™a basombi banso na mboka El Zonte. Yango esalelaka multisig lolenge yako bombama pona bato banso pe eyano ya bobateli oyo endimami pe esalelama bipai binso.

Cristina asalelaka Libenga ya Bitcoin Beach pona sabuni atekaka. Ba kiliya bakoki kosalela kombo na ye pona kofuta ye, soki ba scanner na facture na phone naye, to pe soki bakoti na etando naye. (Ewuti na: Twitter)

Nakati ya libenga ya Bitcoin Beach, misolo esimbami pe ekambami na etanga mobimba. Litomba pe matabisi na yango ezali pona bato banso:

  • Lightning channels oyo tobengi na Lingala nzela to canal ya kake ekambami po bato nyoso ya ofele; kofuta pona kofungola to pona kokanga ezali te
  • โ€œIntra ledgerโ€ na mombongo pona bana mboka ezali kosalema na lombango pe ya ofele pen a lombango
  • Kosalela serveur en ligne elingi koloba motuya ekokita koleka soki moto na moto akoluka kosalela ebombelo ya basango, ba sekele nโ€™a nyoso esengeli pona mosala.
  • Talo ekoki pe lisusu kokita soki mimbongo, koteka pe kosomba esalami na mipiko

Kobakisa bisaleli na app eko sunga posa yako mona nkita ya Bitcoin ya malonga:

  • Makoki yako kofuata na nzela ya Bitcoin, facture ya Lightning to na kombo ya moto ye moko
  • Makoki ya komona nini etikali na libenga ezala dollar (USD) to ba sati, na on-chain nโ€™a Lightning
  • Etando ya mimbongo epai wapi okomona nyoso bateki pe basombi basalaki
  • Etando pona kolakisa nzela ya bateki banso baye bandimaka kofutama na Lightning
  • Etando ya web esika basaleli banso bakoki kotinda pe kozwa Bitcoin nโ€™a libenga ya Lightning na kati na yango (see: ln.bitcoinbeach.com/bitcoinbeachopen in new window)

Soki olingi ozwa esaleli na telephone ya maboko lokola Libenga Bitcoin Beach kota na epemela ya galoy-mobileopen in new window na GitHub.

Totalisa na lombango penza, nini Galoy azwi lokola mateya na nzela ya mosala basalaki na El Zonte.

Liteya ya liboso (1): Koyekola liboso na nyoso

Ezali mwa kpokoso pona kososola Bitcoin. Elekaka na katikati ya nyoso oyo etali ba mayele ya odinatele, masapo, kilipitogalafi, mibeko ya misolo pe makambo mingi lisusu. Libaku malamu ezali ete, moto moko te azali na posa yako yeba nyoso pona asalela pe adondwa na Bitcoin. Bato boni na mokili oyo baselela fiat bomoi na bango mobimba baye te ndenge mbongo etambolaka penza penza?

Jorge nโ€™a lisanga ya Bitcoin Beach baโ€™ko lakisa bai El Savador ndenge yako salela Bitcoin. (Ewuti na: Twitter)

Mateya mitano okoki kosalela pona koteya bato:

  1. Pona kobanda kokotisa bato esengeli kozala na bakambi. Kozala nโ€™a bato oyo bako sunga bato babanda malamu ezali na tina mingi. Ezali na tina mingi pona ba mboka bipai wapi kosalela Bitcoin na mombongo pona mbala ya liboso ezali libaku malamu.
  2. Kolakisa bato ndenge ya kosalela Bitcoin ezali na tina mingi koleka kobetela bango kaka masolo. Kosunga bato kotelecharger pe kosalela libenga, bakoki pe kozwa to kotinda ba sati ekoza malamu koleka komelisa bango makanisi lokola ba mbuma ya kisi.
  3. Teya bana. Bakosunga kokotisa baboti na bango. Bana ya El Zonte bayekolaki kosalela Bitcoin na lombango penza. Na ndako, basungaki baboti na bango.
  4. Ba ATM esunga kosangisa Bitcoin nโ€™a fiat. Emonani na sima โ€˜te ATM ya Bitcoin esungaki makasi pona kokotisa bato. Tango bato bazali na makoki yako teka pe kosomba Bitcoin na libenga na bango pona limenya ya mboka, bomoko na bango ekomi lisusu makasi na likanisi ya kosalela Bitcoin lokola mbongo.
  5. Kosunga bato bayeba komi lengela pona komata pe kokita. Lakisa bato nayo ndenge ya komilengela pona kokweya na talo ya Bitcoin. Kotia mabongisi pona kosunga bai mimbongo oyo libenga ekiti pona matakita ya talon a ebandeli tii bakozwa kimia nโ€™a boyebi oyo esengeli pona kosalela Bitcoin.

Na tango yako bongisa etonga nayo, zwa tango yako yebana pe koyekola epai ya bato ya Bitcoin Beachopen in new window. Bazali bingambe, okoki kotelema na mapeka na bango. Komipesa na bango na mosala ezalaki liboso ya Bitcoin. Bitcoin ekomi nde nzela oyo bazali kosalela pona komema elikia nโ€™a lobi ya malonga na El Salvador.

Liteya ya mibale (2): Lightning ebakisi lombango nabo saleli ya Bitcoin lokola mosolo

Lightning Network ezali esaleli oyo mokili eboya kondima koleka. Kaka mwa mibu mibale babengaki yango ndenge yako sala mimbongo ya liboma to pe #reckless. Sikโ€™oyo McDonalds, Starbucks nโ€™a Pizza Hut bazali kosalela yango na El salvador. Makoki na ba canal yako kokola ezali kosalema na lombango oyo moto akoki kokanisa te. Rapport ya baluki-luki ya Arcane โ€œL'รฉtat du rรฉseau Lightningopen in new windowโ€ to pe lisusu โ€œThe State of the Lightning Networkโ€ elakisi mwa ndambo ya nini tokoki kozela na sima.

Na ebandeli, Bitcoin Beach asalelaki sheni ya mimbongo pona kokabola Bitcoin na etonga mobimba. Atako on-chain to pe sheni ya mimbongo ezalaki malamu pona koteya pe kokabola ba sati na bato nyoso ya etando, kasi ekomaki na suka pona ko fandisama lokola nkita ya malonga.

Bai El Salvador bamoni denge kosalela Bitcoin lokola efuteli yango moko ekoki te soki tolongoli rezo ya mibale lokola Lightning:

  1. Talo ya On-chain elekaki pona kosalela pe kofutaka mikolo nyoso. Esengeli na bana mboka El Zonte bafuta mwa dollar moke, lokola 50 sengi pona pupusas.

  2. Kosalela on-chain ya Bitcoin pona kosomba pe koteka na putulu to pe โ€œpoussiรจre.โ€ Na ebandeli Bitcoin Beach ekutanaki nโ€™a mikakatano to pe โ€œproblรจme de transactions de poussiรจreopen in new windowโ€ na mombongo ya putulu. Oyo babengeli produits de transaction non dรฉpensรฉs (UTXOs) ebombaka ndenge nini na mwa tango moke nyoso ya motuya elekaka na kati ya sheni. Soki eloko ya motuya na UTXO esili talo koleka oyo ekofuta yango, Bitcoin ekomi lokola putulu bakoki kosalela te.

  3. Na esika ya bateki, soki kofutama esalemi mbala moko te tango ya mombongo, esalaka bokabwani pona moteki pe pona mosombi. Bitcoin etongama pona kimia pe mosika ya kanyaka. Esalama te na lombangu ya mimbongo.

Lightning ezali mbango, pete nako salela pe talo moke oyo esengeli pona bai mombongo pona misala na bango. (Ewuti na: Galoy)

Eteni ya mibale Lightning Network ezali technologie oyo ekoki kobongola sistemi nyoso ya bateki pe ko kokisa elaka ete Bitcoin ezali mosolo pona mokili mobimba. Moko ya babandisi akomaki mokanda pona yango na mobu 2020 Our co-founders wrote about this in the 2020 article โ€œLightning comme systรจme de paiement de dรฉtail?open in new windowโ€

Tosalelaki Lightning Network esalelamaki pona kofungola pe komema poloze ya Bitcoin Beach. Soki yango te, kosalela Bitcoin lokola lomenya na El Salvador ekozala kpokoso pe talo mingi; ekoki kutu kolongola poloze na nzela to pe koumisa yango.

Kokotisa Lightning Network ekomi na motuya mingi pona ba oyo nyoso misala nyoso etongami na Bitcoin. Efungolaka nzela pona mimbongo ya talo ya se makasi (lokola ya ofele), na lombango ata soki ndingisa ezali te, pe na mokili mobimba.

Liteya ya misato (3): Kokotisa bai mombongo ezali na tina monene pona kofandisa nkita ya malonga

Kotia pe kofandisa nkita ya Bitcoin ya malonga ememi mokakatanao ya โ€œsoso nโ€™a maki.โ€ Banโ€™a mboka basengeli na bisika songolo bipai wapi bakozwa yango, pe bateki bazali na bosenga ete bai mboka basalela yango. Kokomisa kondimama pe bosaleli ya Bitcoin pete nde eteni ya tina monene po ete bai mboka bayamba Bitcoin na esengo.

Nyoso wana kaka po Bitcoin endimama na lombango, pe ezala na talo moke koleka misolo nyoso mosusu oyo esalelamaka pona kofuta.

Mama Rosa (awa na bilili ye nโ€™a mwana na ye Jorge) azalaki moteki ya yambo na El Zonte oyo andimaki Bitcoin. (Ewuti na: Twitter)

Totala mwa makambo oyo epasola nzela na lolenge yako lengela bateki:

  1. Kotika makanisi ya bateki ezala na kobongola misolo te. Lakisa motuya na dollar (to misolo ya banโ€™a mboka) esika moko nโ€™a Bitcoin pona kongola mokumba ya kolukaluka pe kotangatanga pe kokokanisa na ba facture.
  2. Kokotisa ba ndenge ebele ebele pona bai mombongo bafutama. Esengeli ten a moteki asalaka ba faktire tango nyoso akoteka eloko. Na lisungi ya Libenga ya Bitcoin Beach, basombi bakoki kosale kombo na bango, lokasa yak ode QR, soki aponi moteki moko na etando to pe nako pona facture oyo moko na moko asalelaki pe akoboli na ln.Bitcoinbeach.com/[kombo].
  3. Sala ete nyoso ezala mokuse, pete nako salela pe esenga kofina fina te. Mbongwana pona bai mombongo ya mboka El Zonte eyaki tango Galoy apesaki nzela na basombi pona kopona talo bako futa. Tina โ€˜te moteki atika mosala naye asala facture ezali lisusu te. Pona bango etikali kaka batala na telephone soki moto afuti ya solo. Sikโ€™oyo ekomi pete kosalela Bitcoin koleka mbongo to pe kalati banke.
  4. Kotia makoki pona bai mombongo bayamba Bitcoin na ebandeli. Pologalami to yako zongisela bato mbongo oyo babengi โ€œcash backโ€ esalemaki na mboka El Zonte pona mwa ba poso ndambo, bai mimbongo bafutamaki 20% ya ba Bitcoin na bango. Mabongisi ya boye eko pesa nzela yako matisa pe kofandisa nkita ya Bitcoin.

Kobosana te motuya ya mosala ya bai mombongo pon kofandisa nkita ya Bitcoin. Bosenga pe posa ya bateki ekeseni na mboka moko to mosusu, sala nyoso ete ofanda nโ€™a bango na ebandeli penza pona koyeba ndenge yakosunga bango moko na moko kolandisama posa naye.

Liteya ya minei (4): Kotia boyebi ya basalali kolandisama ba posa ya etonga to mboka bipai bazwami.

Bitcoin Beach efandi na katikati ya kondimama ya Lightning Network. Ndenge Mike alobaka โ€œNa El Zonte bana mike ebele baโ€™ko salela Lightning mingi koleka ba oyo basalela Bitcoin uta kala babengi bango ba Bitcoiners OG.โ€

Malembe malembe tango nkita ya Bitcoin ekomi kokola, lisanga ya Bitcoin Beach etiaki miso pe matoyi na mikakatano nโ€™a bosenga ya bisaleli misusu oyo eko sunga bai mombongo. Kokita na se na mboka El Zonte esungaki pe efungolaki miso ya Nicolas pona bosali Libenga ya Bitcoin Beach.

Komona bato kosalela Bitcoin epai ya bai mimbongo na El Zonte epasoli nzela pona koyeba kosala nyoso esengeli po misala miye. (Ewuti na: Galoy)

Yeba: Kobosana te โ€˜te ezali na tina mingi yako komeka bisaleli nyoso (apps) na mboka bipai wapi bakosalela yango. Luka pe okoyeba yo moko.

Mateya motoba tozwi nabomeki Libenga ya Bitcoin Beach na zamba:

  1. Konnexion ya inteleneti ya makasi pe lombango ezali eloko ya komona pamba te. Develoepement ya bisika konnexion ya malonga ezali tee zo senge kotombola pe kondima โ€˜te mikakatano na to pe panne ya rezo ekosale atako ezali bongo te mboka Etat-Unis ya Amerika.
  2. Bokotisi ya ba app ezali libaku malamu pona mateya. Libenga ya Bitcoin Beach ezali na mituna pe biyano oyo ememaka bato na ebandeli ya mateya na oyo etali Bitcoin. Lifuti y aba sati ezali na sima ya motuna moko na moko pona kosunga moto na ebandeli.
  3. โ€œSati nde esaleli,โ€ kasi pona moto na moto dollar to USD nde esalali ya bokokanisi. Na ebandeli ya Bitcoin, bato bakanisaka na mosolo ya mboka na bango, kasi na sati te. Malembe malembe nde sati ekokota na makanisi na bango, na yango ezali malamu ete na ebandeli ya Bitcoin esika songolo, kosalela mosolo ya mboka wana.
  4. Bakisa mabaku pona bai mimbongo nโ€™a ba kiliya basololaka. Esika ya etando ya Libenga ya Bitcoin Beach eโ€™ko sunga ba kiliya komona esika nini bakoki kosalela Bitcoin na bango. Yango pe ekosunga โ€˜te mimbongo esalema malamu pena lombango pona ba kiliya basala pe bafuta ba facture na bango.
  5. Mikanda ya kofuta ezali lisungi monene pona buku. Bateki nโ€™a basombi bakoki kokoma mikanda ya mimbongo nyoso. Soki tolandi maloba ya banโ€™a mboka esaleli oyo ezali lisusu yak o batama te, ekomi ya polele. Sikโ€™oyo nโ€™a motindi nโ€™a mozwi bango nyoso bakoki komona mikanda oyo eโ€™kolakisa ndenge mombongo esalemaki.
  6. Yeba nyoso oyo etali kokola ya kofutama ya lombangu (รฉclair โ€“ lightning). Ba nzela ya kofuta ya sika ebimi ebele lokola, Lightning Address, factures statiques nโ€™a BOLT 12 ezali koya na lombangu penza.koponama etali ndenge bolingi kosalela yango. Na ebandeli, libenga ya Bitcoin Beach esalelaki code QR oyo ememaki na lokas aya fakture (lokola ln.Bitcoinbeach.com/mamarosa). Bosenga ya bisaleli mibale emonani pona ko longola bokabwani pe kobongisa nzela ete nyoso ezala na bomoko.

Liteya ya mitano (5): Bobateli ya Etonga Mobimba ezali Nzela pona Komi-batela.

Komibatela ezali penza nini esengeli pona moto nyoso oyo azali na bomengo na Bitcoin. Mobeko ya liboso pona kobomba Bitcoin ezali boye โ€Fungola ezali ya yote, Bitcoin ezali y ate.โ€

Nzela moko kaka ezali komibatela te, yango kaka pe te ndenzela ya malonga pona kokotisa to kolakisa bai mboka ndege yakosalela Bitcoin.

โ€œEsengeli kotambola lokola mwana moke. Soki otalisi bato mikakatano na ebandeli bato bako linga kokota te.โ€ โ€“ Mike Peterson naTales from the Crypt #173open in new window

Moboko ya bobately Bitcoin

Lolenge ya bobateli ya Bitcoin etambwisami na penza penza na moboko ya sekele/bolamu. Epai moko oza na UX, ndenge yako zwa misolo na lombangu pe ndenge yako kota na ba bankei ya ba fiat. Epai mosusu, oza na ebende etiami nkoma ya loboko, biteni ya lokasa oyo esengeli na bitapi ebele nโ€™a bato ebele pona komema misolo esika moko to mosusu.

Esaleli moko na moko eza pena bitumba oyo ekoki kofungola nzela ya boyokani. Different use cases have different risk scenarios that make trade-offs acceptable. Ndakisa, kobomba misolo na bankei endimama lokola nzela ya malamu mingi koleka kotambola nโ€™a misolo na maboko, kasi soki mwa motango ya mbongo eza moke wana mabe te.

Libenga ya Bitcoin Beach eโ€™ko pesa bobateli pona lisanga epai wapi misolo ekobombama esika moko.

Lolenge moko na moko ezali na tina na yango soki 1) Soki eko salelama na ndenge esengeli 2) eko kamba bato na nzela sembo tango bako bomba bomengo na bango na Bitcoin.

Kobatela na lisanga: bozongi na ba bankei ya masanga

Lolenge ya kobatela oyo etiamaki pona Bitcoin Beach ezali oyo Galoy abengaka โ€œbobateli ya lisanga.โ€ Ezali eyano nโ€™a makomi ebele epai nini fungola ya ebombela ya misolo esimbami na ba bakambi ya mboka. Lolenge oyo elongoli boumbu ya kotalela ba kompani ya minene miye mizwami mosika ya mboka pe kolongola bokabwani na oyo etali kokotisa bato ya sika na rezo.

Mwa liloba pona bankei ya lisanga

Ba banke ya lisanga ezalaka banda kala na mokili mobimba kobanda mibu mokama na mokama. Litomba na bango ezali kosunga etonga ya bato oyo bazali bosenga moko na na bomoi pe na nkita. Mbala mingi posa ya bato nyoso ekutanaka esika moko. Misolo miye mibombami na banke ya etonga epasamaka na bato kolandisama bondeko na bokeseni ya ndenge ba banke ya minene basalaka.

Ba banke ya lisanga ezali na motuya monene pona mboka lokola El Zonte po bazwaka mikano nyoso kaka po na bolamu ya bana mboka. Mokanda ya Galoy open source Bitcoin bankeing solutionopen in new window (to pe solution bancaire open source Bitcoin) esalama pona kosunga lisanga ya bato to ba kompani na mokili pona komi sunga bango moko.

Pona koyeba mingi na tina na bosangani ya Bitcoin na banki ya mboka, tala mokanda ya Fulgur Ventures โ€œThe role of Bitcoin for community bankeing.โ€ (to pe "Le rรดle de Bitcoin pour les services bancaires communautaires.open in new window")

Libenga ya Bitcoin Beach lokola bankei ya Bitcoin pona mboka

Misolo ya Libenga ya Bitcoin Beach ekambami na bai mboka, eko pesa nzela pona kolongola bokabwani pe kpokoso nyoso po โ€˜te bato bafutama na talo moke po bamema lisungi na bango na nkita ya nkita ya mboka.

Botala pona nini kobatelama ya lisanga ezali malamu pona Bitcoin Beach:

  1. Kolongola bokabwani ezali na tina monene pona kosala rezo nโ€™a nyoso oyo esengeli pona nkita oyo ezali kotambola malamu. Bomoto ya bato etelemelaka mbongwana nโ€™a makanisi nyoso ya sika to kozongela bizaleli ya kala. Ndenge Mike Peterson aloba na lisolo na ye ya Juin 2020 nโ€™a Marty Bent: โ€œTambola na bitambe ya mwana. Soki okotisi mikakatano oyo nyoso na ebandeli, bato bako kota na lisanga ya nkita te.โ€
  2. Ezalaka kpokoso pona kobomba mindelo ya maloba na ndenge esengeli pona ba mboka mike pe ya misika. Pona bato nyoso oyo bafandaki na ndako ya mabele nโ€™a manzanza, ezali mwa matata pona kobomba makomi ya milongo ya maloba. Mikakatano pona kosalela milongo ya maloba ezali pona bato oyo bayebi kotanga to kokoma te, likambโ€™oyo ezali bisika nyoso na mokili.
  3. Bato oyo basalelaka Bitcoin moke moke bakomaka na kimia. Sikโ€™oyo bai mboka El Zonte bakoki kotinda Bitcoin na nzela ya Lightning Network mokolo na mokolo. Bamisusu babandaki kobomba ba sati, yango nde esungi bango kokolisa mwa bomengo na lombangu koleka soki babombaki ba Dollar US. Ezali likanisi oyo Bitcoin Beach atambwisaki na nzela ya mateya nโ€™a kolengela bato po bami batela. Mabongisi ya UX eko koba kosunga bato ebele na ebandeli pe komibatela na mokili mobimba.

Eyano pona kobatela etonga babengi Open source ebimi lokola lolenge ya malonga pona kobandisa masanga ya Bitcoin. Tondimisami ete ekosala mosala monene pona komema Bitcoin na basaleli Milliard ya yambo.

Liteya ya motoba (6): Banda Moke, Tonga pe moke moke Oko Kola

Na mokili mobimba, ezali esengo komona ngulupa ya bato kosala nyoso pona kokotisa mboka na bango na rezo ya Bitcoin. Bitcoin Lakeopen in new window na Guatemala nโ€™a Bitcoin Beach Brasilopen in new window bazali ba ndakisa mibale. Basaleli ya Bitcoin oyo babengi ba Bitcoiners bakoma kobenga Tonga โ€œBitcoin Islandโ€ (to pe nganda ya Bitcoin) na sima ya koyoka mabongisi na biteni minei pona komema Bitcoin na mboka naye ya Lord Fusituโ€™aopen in new window

It is exciting to see the groundswell of communities around the world working to connect their towns and cities to the Bitcoin network. Bitcoin Lakeopen in new window in Guatemala and Bitcoin Beach Brasilopen in new window are two early examples. Some Bitcoiners have started calling Tonga โ€œBitcoin Islandโ€ after hearing Lord Fusituโ€™aโ€™sopen in new window four-part plan to bring Bitcoin to his country.

Mateya ya moko na moko ezali moko ya misala na tango ya bokotisi bato ya sika na etonga. (Ewuti na: Twitter)

Po na kobanda toko kabola makanisi mibale ya minene na ndenge yako kolongwa na makanisi pe kokoma na nkita:

  1. Kobanda na esika nโ€™a etonga songolo esungaka pona pikama malamu. Bitcoin Beach sangolaki na libaku ya kosalela bato 3,000 oyo bazwamaki mosika na ba mboka mosusu. Kokangama esika moko epsaki biso makoki yako yekola pe kokokanisa mateya na ndenge makambo ezalaki pe elengelaki biso pona ko fuluka ya Makasi.
  2. Kokola esalemaka โ€œmalembe malembe, pena pwasa.โ€ Tango ya komema lisanga ya baton a Bitcoin, mibongisa pona kozwa tango pona kofandisa bato 50 ya liboso na esika oluka kokotisa bato nkoto na nkoto. Po Bitcoin ezali rezo, mibeko miye mitambwisaka rezo ezali pe awa. Kasi nde, batongi, bateyi, nโ€™a basali to ba kompani oyo misala nโ€™a mimbongo na bango ezali na Bitcoin basalaka nyoso pona komema lisungi na bango na bato banso oyo bakotaka na Bitcoin na mbala ya liboso.

Bato ebele bayoka kombo Bitcoin Beach na 2021, nzoka nde poloze oyo ezwaki mibu ebele po etelema. Lisanga ya baninga ya Bitcoin Beach bamipesaki nโ€™a ba tango na bango pona koteya makambo ya mike mike, koyanola mituna pe ko sunga na mikakatano ya ndenge na ndenge yango nde ezalaki likonzi esimbi poloze oyo. Soki bango te, Bitcoin Beach elingaki ezala elonga monene ndenge ozali kotanga lelo.

Mwa Makanisi pona Kobandisa Banke ya Bitcoin

Tia makonzi oyo epikama nโ€™a lisanga ya malamu, taknologie nโ€™a koyekola.

โ€œToza libota monene nโ€™a ndoto ya monene.โ€ โ€“ @romanmartinezc
  1. Tia lisanga na yo. Pona bato oyo bazali na motema, makasi nโ€™a bolingo yako sunga baton a mikakatano nโ€™a mbongwana oyo eyaka nโ€™a Bitcoin. Eza na banzela mibale ya kotala uta ebandeli:
    • Komipesa ya bai mboka: Po oyeba ndenge pe nini esengeli po na kolengela bai mboka, land ape yekola Jorgeopen in new window, Chimberaopen in new window, n'a Mikeopen in new window.
    • Teknologie: Pona kopona biyano ya teknologie yako salela na botongi ya banke ya Bitcoin esengeli kotala makambo ebele. Kozala na moto oyo akosunga na mikano yako zwa pona moboko ya kobatelama ya Bitcoin, kobatela mazita ya Lightning nโ€™a bosaleli ya misolo, kosalela mabenga ya pio to ya moto ekosunga yo opika makonzi ya kokola makasi.
  2. Luka liziba epai wapi okozwa misolo. Kozwa esika esika misolo miko uta eyali na tina monene pona kokotisa etonga ya bato ya sika na Bitcoin, mingi mingi soki ezali na mboka ya moke pe bobola makasi epai wapi bato bazali bomengo ebombana te to pe misala oyo efutaka. Kozala na misolo na maboko pona kofuta misala na eko sunga makambo nyoso etelema malamu, pe kobola mw aba sati na kati ya lisanga ya basaleli eko pesa nzela ete nkita efanda pe bato basepela kosalela yango.
  3. Kozwa eyano ya teknologie. Bisaleli ya kosunga misala ya misolo ya Bitcoin ezali naino kaka kobakisama. Esaleli ya Galoy oyo babengi infrastructure bancaire open source Bitcoinopen in new window ezali eyano oyo posa na yango ezali ete lisungi na makambo matali misolo pona ba kompani nโ€™a bana mboka ekoma pete na kati ya Bitcoin nโ€™a Lightning.
  4. Limbola ndenge nayo yako kengela pe bongisa esaleli ya makomi kilikili oyo babengi multi-signature. Ekenge ezali na tina makasi yango wanan ezali na posa yako tala eloko moko na moko po oye pe po na balandi na ye. Po ngulupa ya ba Bitcoiners ba oyo baye makambo etali Bitcoin, kokengela ezali na motuya monene pe eloko yako zwa esika na yango ezali te. Tango bokotisi bato oyo bazali na banke te, okoki kozwa mokano yako kosalela lolenge ya Bitcoin Beach na ebandeli. Atako, ndimisama pe yeba tina yako bo bomba nkita na milongo ya maloba kili kili.
  5. Bosala ndenge yako teya pe kosunga bai mboka. Communaute ya Bitcoin bazali na bolingo mingi nako pesaka biso lisungi na bango, bisaleli ya mateya nโ€™a biloko mingi lisusu, yango talatal naino pember liboso. Esika moko te eleki โ€œBitcoin Twitterโ€ pona kotala bilili, mikanda nโ€™a nyoso oyo esengeli po obanda kokotisa bato nayo. Kobosana te โ€˜te na ba mboka bato mingi ten de basalelaka Twitter.
  6. Bobima na nzela! Kokotisa na ebandeli ezalaka moto moko na mbala, kota na mboka pe pesa bato libaku malamu yako salea, kozwa to kotinda ba sati na bango.

Landa Jorge (bilili), Chimbera n'a Mike Peterson (@bitcoinbeach) po olanda nyoso na oyo etali mobembo ya El Zonte.

Pona kosukisa

Ezali lokola ndoto nโ€™a esengo komona bitonga, masanga, ba kompani bipai na bipai na mokili kosanga lokola moto moko pona komema Bitcoin ekoma na basaleli nkoto nkoto na nkoto (milliard). Toko likia ete mokanda oyo ezali ndakisa ya malamu pe eko pesa etingia kosunga bato kosolola na ndenge ya malonga.

Galoy pe bazali kobongisa milulu oyo babengi Adopter le Bitcoin : un sommet รฉclair au Salvadoropen in new window kobanda mokolo ya 16 - 18 Novembele lokola lisunga pe kobakisa kokola ya Bitcoin nโ€™a elonga ya lisanga ya Bitcoin Beach. Ezali esengo monene pona biso, kozala pembeni ya bato lokola Jorge, Chimbera, Mike nโ€™a bayike misusu oyo basala โ€˜te ndoto ya nkita ya Bitcoin oyo efanda ekoma ya solo.

If youโ€™d like to see and use our code, itโ€™s free and open source on GitHubopen in new window.

You can also reach out on twitter @galoymoneyopen in new window and our public Slackopen in new window.

Translators
Neo Simba

Supporters
HRF