Lakisa nga lokola mwanโ€™a moke

by Nik Custodio 2013/12/12open in new window

Soki ti lelo ozo yeba te pe oza komituna soki Bitkoin eza niniโ€ฆ

Tofandi na banc ya park. Mokolo malamu.

Nga na naza na pombo moko. Napesi yo yango.

Yo okomi na pombo moko nga natikali na eloko te.

Eza pete, boye te ?

Totala nanu nini eleki wana malamu malamu:

Napesaki yo pombo na ngai na maboko.

Yo moko oyebi ezalaki ndenge wana. Yo ozalaki wana. Nga pe nazalaki wana.Osimbaki yango na maboko.

Tozalaki na bosenga ya lisungi ya moto mosusu te po yo ozwa pombo yango. Tozalaki na posa Noko Thomas (po aza zuzi monene ayebana)aya kofandisa biso po tondima penza โ€˜te pombo wana elogwe epana ngai pe sikoyo eza na maboko nayo.

Pombo wana eza ya yo! Nakoki kopesa yo pombo mosusu te po natikali na eloko te. Nakoki pe lisus kosala eloko na pombo wana te. Eza lisus ya ngai te. Eza ya yo okoki kosala nโ€™ango nyoso olingi sikโ€™oyo.

Okoki kutu ko kabela moninga na yo soki olingi, moninga wana pe akoki kopesa moninga na ye, tii na tii.

Toloki na kati ya bato mibale ezalaka nde boye. Na kanisi eza ndenge moko, ata soki napesi yo etabe,to mokanda, to eteni soki ya eloko nini, 1 francโ€ฆ

Kasi to koba se ko koba. To zonga nana na ba pombo! Toloba โ€˜te, naza na elilingi ya pombo. Awa, napesi yo Pombo ya elilingi. Ah! Ekomi elengi.ndenge nini okoki ndima penza penza โ€˜te elilingi ya pombo oyo ezalaki ya ngai, ekomi ya yo? Kanisa nanu mwa moke.

Ekomi mwa kwokoso, boye te? Oko yeba ndenge nini soki natiaki pombo ango na mokanda oyo natindeli Noko Thomas te. To moninga nayo Joe? No Liza, moninga na ngai?

Tango mosusu nasalaki na ngai kaka bilili ebele ebele ya pomboโ€™ango mashini ya odinatele. To pen a tiaki yango na inteleneti batu tuku na tuku ba zwi yango.

Omoni, toloki na bilili eza penza likambo. Kotinda elilingi ya pombo ekeseni na kopesa pombo na maboko.

Batu ya mayele makasi na ba mashini ya odinatele baza na ndenge babengaka likambโ€™oyo: Babengi ya kofuta mbala mibale to pe double-depense. Kasi, omitungisa te.esengeli kaka oyeba โ€˜te etungisa bango mwa tango molayi, bayebaka te ndenge nini kopesa eyano na motuna oyo. Tii lelo.

Kasi, tokanisa nanu biso moko.

Buku (Mikanda : makomi ya mimbongo)

To pe bilili y aba pombo oyo esengeli ebombama na buku. Ezali kaka mokanda to buku oyo bakomaka makambo nyoso, bat roc nyoso pona tang ape ko kokanisa na sima. Buku oyo, lokola yango pe eza kaka bilili na machine ya mashini ya odinatele, esengeli eza na esika na yango moko pe moto atalaka pe akengelaka yango.

Toloba โ€˜te ka lokola lisano ya bitumba bana basalaka na mashini ya odinatele. Tempรชte de neige, batu basalaka masano wana na net baza na โ€œbuku ya bililiโ€ ba mbeli ya moto pona bitumba oyo emonanaka penza te na systรจme na bango. Na boye, bato lokola bango bakoki kotalela pe kokengela bilili ya ba pombo na biso. Omoni โ€“ tokati likambo !

Mikakatano

Mwa mikakatano eyali:

  1. Sikoyo soki moto moko na Tempete de neige asali bilili ebele ebele? Akoki kaka komi bakisela mwa ndambo ya bilili pombo tango nyoso ako linga!

  2. Eza ndenge moko te nโ€™a mokolo wana tofandaki na banc ya park, ekeseni. Wana ezalaki kaka ngai nโ€™a yo, biso mibale. Kosalela nzela lokola lisano ya Tempete de neige eza neti kobenga Noko Thomas (moto ya misato)lokola zuzi (nalobaki โ€˜te aza zuzi monene?) pona ba toloki nyoso toko linga kosala na banc ya park. Nakoki kosala ndenge nini pona na pesa yo bilili ya pombo ndenge tosala biso mibale?

Ndenge nini tokoki kosalโ€™ango ndenge tosalaka, kaka biso moko, ngai nโ€™a yo kasi na zela ya bilili? Eza mwa matataโ€ฆ

Solusion

Soki topesi buku na moto nyoso? Naโ€˜te ezala kaka epaya moko ya bato kuna ya Tempete de neige, ekoki kobombama na ba mashini ya odinatele ya moto nโ€™a moto. Ba pombo nyoso oyo esi etekama kala kala,kobanda ebandeli eko komama wana.

Ndenge yako kokosa, to kosala kanyanka eyali te. Ndenge yako kotindela yo bilili ya eloko naza nโ€™ango te ezali te po eko kokana te na makomi ya buku oyo moto nyoso aza nโ€™ango. Ekomi kwokoso pona kosala kanyaka. Mingi mingi soki mombongo yango ekomi monene makasi. Pe lisusu, moto moko kaka te nde abombaka to pe akengelaka buku yango, nayebi โ€˜te mote akoki komipesa nyoso kaka ndenge alingi.

Mibeko etiama uta ebandeli ya makambo nyoso. Pe ezali polele pona moto nyoso. Moto nyoso ya mayele, oyo alingi, akoki ko bakisa makanisi naye, kobongisa, pe kobatela yango.

Yo pe okoki ko sangana na bato nyoso wana, pona kobakisa makanisi na buku yango po mituna nyoso ezwa biyano, ata eloko moko etikala te.

Pona mosala nayo, okoki kozwa lifuta ya 25 bilili ya pombo. Kutu, wana nde eza lolenge moko kaka yako sala bilingi ya ba pombo na sistemi.

Nakomisi yango mwa pete penza

โ€ฆ kasi esaleli wana nalobeli bino ezali. Babengi yangi yango Bitkoin protokole. Bilili ya pombo toโ€™oko lobelโ€™awa ezali โ€œBitkoinsโ€ nakati ya zando. Kitoko nโ€™elengi!

Na boye, omoni sikoyo nini eleki wana? Omoni nini buku oyo esimbami na bato nyoso efungoli pe ebongisi makambo?

  1. Eza polele polele? Motango ya ba pombo nyoso eyebani na buku wana uta ebandeli ya masolo. Nga nayebi soki eza boni lelโ€™oyo. Nayebi โ€˜te eza mingi te na sistemi, nayebi โ€˜te eza yako tanga pe emonanaka pamba pamba te.

  2. Tango nasali toloki nayebi bilili ya pombo wana elogwe ya ngai pe ekomi ya yo, tembe eza kutu te. Nga pe nazalaka koboya kondima โ€˜te bilili to pe biloko ya motuya na mashini(odinatele) ekoki pe kosalema ndenge wana. Eko komama na buku pe moto nyoso akoki komonโ€™ango.

  3. Lokola buku oyo eza ya moto nyoso, naza na posa ya Noko Thomas (to pe moto mususu) te, po na ndimisama โ€˜te nasalali kanyaka te, to loboko malayi, to natekeli bato ebele eloko moko mbala na mbalaโ€ฆ

    Nakati ya zando en ligne, bilili ya pombo ekomi kaka ndenge moke na ba pombo oyo ya kokauka. Sikoyo ekomi kaka lokola pombo ewuti na maboko na ngai, mbala moko epana yo. Neti kaka na park, toloki eza kaka nโ€™a bato mibale. Ngai nโ€™a yo โ€“ tina kutu ya Noko Thomas te po tondima โ€˜te makambo nyoso eleki malamu.

Elingi koloba, bilili ya pombo eza kaka ndenge moko na oโ€™ya kawuka.

Nini eza kitoko koleka? Eza kaka bilili. Tokoki kosala toloki na ba pombo 1 000, to 1 000.000, ata .0000001. Nakoki kofina na ekomeli moko pe na tindiโ€™ango, to kotia yango na libenga nayo ata soki naza na Nicaragua pe yo oza mosika kuna na New York.

Nakoki ata kosala โ€˜te bilili ya biloko mosusu ebele ebele etambola nzela moko nโ€™a ba bilili ya pombo na ngai. Eza kaka bilili, elilingi. Nakoki kobakisa mwa makomi likolo nโ€™ango. To pe eloko ya motuya penza; lokola kontala, to mokanda ya biloko mya ngai, to pea ta mokanda na ngai ya bonsomiโ€ฆ

Omoni, oyo eza kitoko makasi! Ndenge nini tozo mona pe tozo salela bilili ya pombo oyo? Eza na tina monene, boye te?

Sikโ€™oyo, bato ebele baโ€™ako tia tembe tii lelo. Ko potama ezali makasi kati na makabโ€™oyo na kelasi ya makambo matali nkita. Bayi politiki. Bayi mashini ya odinatele ya odinatele. Kolanda bango nyoso wana te. Bato mosus baza mayele mingi. Basus bazala na sango ya solo solo te. Bamoko balobi makambโ€™oyo eza na motuya mingi, basus balobi ezanga tina. Moko ya bato wana kutu apesa motuya na ye, pona ye $1,300 pona pombo moko. Basusu babengi yango bilili ya wolo, basusu balobi ezali misolo. Tii basusu bamoni yango lokola mopepe, eko mat ape na sima ekweyi lokola etikala kozala te. Pona basusu eko bongola mokili, pona basusu eza kaka bomengo yako kabola ya ofele.

Nga Namoni Boye

Mokolo mosusu nakolobโ€™ango. Kasi ndeko na nga, yโ€™oyebi Bitkoin koleka bato ebele.

Recommend Reading (Updated 2017)

โ€œYou Donโ€™t Understand Bitcoin Because You Think Money is Realโ€open in new window by Maria Bustillosopen in new window is a good follow-up read.

You can also read more about Ethereum and Smart Contracts hereopen in new window. Enjoy!

Translators
Neo Simba