Re: Bitkoin v0.1 Ebimi

by Hal Finney 2009/01/11open in new window

Satoshi Nakamoto akomi boye:

Bitkoin ebimi, sisteme yako tambwisa misolo na kati ya baninga (pair-a-pair) na nzela ya lotiliki pe inteleneti pona kopekisa kanyaka pe kofutisama mbala na mbala. Bonsomi na yango eyebana, eza na servere nโ€™a mokambi to mokonzi (mokambi/motambwisi) te.

Tala bitcoin.org pona bilili.

Nzela nโ€™ango ezali awa: http://downloads.sourceforge.net/bitcoin/bitcoin-0.1.0.rar

Longonya na Satoshi po na ndenge kobimisa version alpha oyo. Nako meka yango na lombango penza.

Motango nyoso ya mabanga ya Bitkoin ekozala 21 000 000 piece. Eko kabolama na ba noeud ya rezo tango eko sala maboke maboke, pe motango wana eko kita na kati kati na sima ya mibu 4.

Na mibu 4 ya liboso: ba piece 10 500 000
mibu 4 oyo ezo landa: 5 250 000
mibu 4 oyo ezo landa: 2 625 000
mibu 4 oyo ezo landa: 1 312 500 bongo na bongoโ€ฆ

Eza na tina monene koyeba โ€˜te sistemi oyo ekelami pona kondima kosala kaka motango songolo ya mabanga ya Bitkoin po na libela na libela. Emonani penza โ€˜te mikolo ezoya ekozala mwa pasi pona kozwa ata libanga moko kaka.

Likama pona misolo nyoso oyo ebimi sika ezali koluka ndenge nini yako pesa yango motuya. Ata soki tokangi miso na ndenge โ€˜te na ebandeli bato ebele bako boya kondima kosalela yango, ezalaka kaka pasi kozwa tina yako ndimisa bato motuya oyo eza ya pamba te pona na libanga moko na moko.

Neti kaka mwa likanisi ya maseki, kanisa โ€˜te Bitkoin esimbi pe ekomi sisteme makasi oyo mokili mobimba bako salela pona kofuta (kosomba pe koteka). Na sima, soki osangisi motuya na yango nyoso esika moko pe ekokani na motuya ya m=nkita ya molongo mobimba. Na likolo likolo, baloka โ€˜te bomengo nyoso ya mabota nyoso ya mokili ezali kobanda 100 000 tii 300 000 milliars ya ba dollars ya Amerika. Na ba mabanga 20 000 000 pamba, motuya ya libanga moko eko koma 10 000 000 ya dollars ya Ameka.

Na boye, ndenge yako bimisa mabanga lelo na mwa tango ya moke kaka na nzela ya mashini ya odinatele eza libaku malamu, nโ€™a matabisi ya 100 000 000 po na moko (1) kaka! Atako eza pasi pona Bitkoin esimba pee longa na ndenge wana, ekozala nde 100 000 000 kotelemela 1? Kanisa malamu malamuโ€ฆ

Hal


The Cryptography Mailing List Unsubscribe by sending "unsubscribe cryptography" to majord...@metzdowd.com