Toko Kotisa 7.753 Milliards Ya Bai Mokili na Lightning Network Ndenge Nini?

by John Cantrell 2022/01/05open in new window

Na tangi mikoloto, totala naino ndenge tokoki kokotisa bai mokili mobimba na Lightning Network, ekoki kozwa tango boni, pe nini tokoki kosala po esalema na lombangu penza.

Kokota na Lightning Network esengeli kotinda btc na kati ya 2-ya-2 transaction de financement multisig nโ€™a partenaire yako kabola. Po na komatisa espace na transaction oyo tosengeli na native segwit input 1 nโ€™a ebimeli ya misolo na nzela to pe canal kaka moko. Ekosala tx ya 121vbytes.

Soki 100% ya ba mimbongo (transactions) na kati ya bloke ezali na kati ya ba canal ya ouverture txs, tokoki kokotisa ata bato 8,264 na lightning pona bloke moko. Lokola bato na molongo mobimba tozali 7.753 milliards eko senga ba bloke 938,166 to pe mibu 17.8 po bato banso na mokili bazwa canal.

Makoki yako bongisa yango ezali? Na botondi mingi, tozali na mwa banzela ndenge na ndenge. Nzela moko oyo ekoki kosalema sikโ€™oyo ezali ya kosalela mipiko (mise en lots โ€“ batching)! Batching elingi koloba tokoki ko fungola ba canal ebele pona mombongo to transaction moko. Elakisi โ€˜te canal moko na moko oyo eko bakisama ekoki kolakisama na output mosusu na efuteli ya tx.

Output moko na moko took bakisa na sima eko salela pene ya 32vbytes. Nโ€™a batching ya malonga ezali kotondisa bloki na transaction 1 nโ€™a input 1 pe ba outputs ebele ebele tii ndenge eko koka. Na 32vbytes na output moko elakisi โ€˜te tokoki ko fungola ba canal 31,247 pona bloke moko!

Batching ematisi biso likolo mbala 3.78 pe elkitisi tango yako kotisa mokili mobimba na mibu 4.7 kaka. Eza mabe penza te kasi elakis โ€˜te tokoki kosalela espace ya bloke mobimba na pe ya mibu 5. Nzoka nde ekokoma lisusu malembe soki ewumeli. Tokoki kobongisa yango lisusu?

Makoki ezali, kasi lelo nde te. Na mikolo mizali koya nzela yako zwa pe kondima bato mibale to koleka na canal moko ezali pe makoki yako sangisa ba nkoma (signature) pona kotika monene etando ya output moke. Cana ya ba nzela kili kili ekolisaka multisig 2-na-2 na multisig monene koleka oya N-na-N.

Tokoki koloba โ€˜te N ekoki kozala 10, 100, atako 1000. Soki bato 10 na canal moko tokoki kokotisa bato 312,470 na bloke moko pe mokili mobimba ekoki kokota na mwa mikolo 172. Atako batching ekolisaki mosala kaka mwa moke, ba canal ya ekotiseli kili kili epesi nzela ya komatisa mosala likolo makasi.

Makoki ya tonga yango lelo ezali pe eko bongola Bitcoin te kasi ekosenga mosala ya ingรฉnierie makasi pona mikakatano ya mรฉcanisme ya pรฉnalitรฉ ya lightning. Ba txs ya rรจglement symรฉtrique ya Eltoo ekomisi kosalema ya ba canal ya bikotiseli kili kili (canaux multipartites) pete.

Sikโ€™oyo tokoki kokotisa bai mokili mobimba na lightning na mwa tango ya malonga? Tomoni lokola eyano ezali ee, suka suka took koma kuna. Bato banso na mokili bako linga kozwa canal na bango moko pe kokota na lightning? Nayebi te kasi wana nde posa na ngai!

Translators
Neo Simba

Supporters
HRF